VSMI GYM

Centre d’aide

Mituna ya mbala mingi

Nyonso oyo osengeli koyeba liboso ya kota. Ozwi biyano te? Tinda biso na WhatsApp — tozongisaka na < 5 min.

1VSMI GYM ezali wapi mpe efungwami tango nini ?

Tozali na Stade Massamba-Débat, na katikati ya Brazzaville. Toyambaka yo mikolo nyonso : Mok–Poso 06h30–20h00, Sam 06h30–11h00, Lom 06h30–10h00. Yaka 15 minutes liboso mpo na session na yo ya liboso : tokosala bilan na yo mpe tokolakisa yo salle.

2Talo ezali boni ?

Ba formules mibale ya pete : Liberté — 1 000 FCFA mokolo, 6 500 mikolo 7, 21 000 mikolo 30. Coaching Premium — 3 000 mokolo, 13 000 mikolo 7, 32 000 mikolo 30. Talo nyonso ezali ya suka, efutamaka na accueil (mbongo to Mobile Money kuna). Kofuta na internet ezali te sikoyo — ekipi ekosunga yo.

3Ndenge nini nakomikoma ?

Yaka na accueil na Massamba-Débat na ngonga ya mosala. Pona formule na yo, futa kuna (mbongo to Mobile Money na accueil) mpe zwa ticket na QR na mbala moko. Kofuta na internet ekozonga — ekipi ekosunga yo.

4Ticket na ngai esalaka mikolo boni ?

Ticket nyonso ezali na eteni mibale : activation mpe utilisation. Ticket ya mokolo esengeli kosalela na kati ya 7 mikolo sima ya kosomba, sima epesaka mokolo moko ya accès. Ticket ya 7 to 30 mikolo na kati ya 15 mikolo, sima 7 to 30 mikolo ya molongo. Lakisa kaka QR na yo na entrée.

5Nakoki kotika abonnement na ngai mwa moke ?

Ee, okoki. Senga kaka na accueil liboso ete ticket na yo esila : ti 7 mikolo mpo na ticket ya mokolo, 15 mpo na 7 mikolo, 30 mpo na 30 mikolo. Ozali na au moins 2 pauses na abonnement.

6Bokeseni nini kati na Liberté na Coaching ?

Na Liberté, osala sport yo moko na plateau mobimba, na rythme na yo. Na Coaching Premium, ozali kosalisa : bilan mobimba, programme na yo, correction na séance nyonso na suivi poso na poso. Malamu mpo na résultats ya noki, malamu mpe sans blessure.

7Esengeli kobuka mpo na Coaching ?

Ee, coaching ezali na RDV prioritaire mpo na kobatela place na yo. Okoki kobuka na page Coach to na WhatsApp. Sang o malamu : bilan ya liboso ezali kati na abonnement 30 mikolo.

8Nasengeli komema nini ?

Yaka kaka na tenue ya sport, baskets ya peto, serviette na mayi. Tozali na vestiaires. Pas besoin ya cadenas : ba casiers ya sécurité ezali na accueil.

9Bozali na essai ofele ?

Tozali na essai ofele te, kasi okoki komeka salle sans engagement na ticket ya mokolo : 1 000 FCFA na Liberté to 3 000 FCFA na Coaching. Ezali ndenge ya malamu mpo na koyoka ambiance ya VSMI.

10Ndenge nini nakoki kobenga bino ?

Ndenge ya noki : WhatsApp to na téléphone 06 755 98 97 na 04 403 34 40. Okoki mpe kotinda na [email protected] to kosalela formulaire na nse ya page. Tozongisaka na kati ya 24h, mingi na nse ya 5 minutes na WhatsApp.

Ozali na motuna mosusu ?

Tinda biso na WhatsApp — tozongisaka na < 5 min. To yaka mbala moko na salle.